Repos éternel grd artistes Kisangani Espérant djenga k
@charlise8583
4 жыл бұрын
Le grd pretre ndjenga.
@maval10
4 жыл бұрын
Lyrics: Constatation - Esperant Kisangani -- Yoka lolaka ya mwana Djenga K. Ngo oh oh! 1. Na ko nzemba eh na ko nzemba, na ko kamwa eh na ko kamwa Mongongo na ngai ya mwana Djenga na ko nzemba eh Lolaka lua ngai ya mwana Djenga na ko tuna eh eh (2x) 2. Mokili ya kala ezalaka ya ba Cristo (Chretiens, Croyants, fidels), lelo mokili e komi ya ba pakanu (Paiens, Mecreants, infidels) oh oh, na ko kamwa eh eh Sanza (la lune) a a, moyi (le Soleil), mapata (les nuages) a, zamba (les forets) a a, mabele (la terre) mpe na mayi (les eaux des fleuves, mers et oceans) Bino batu bozalaka. babanda mokili bazali wapi e?Baye ba banda mokili ba zali wapi e? Ngai moko na mawa a a, nazali ko lela 3. Moto a ko lela batu ba ko seka. Pinzoli ya moto batu ba ko tiola Bougie e kopela, mayi ya miso eko tanga, Na tikali lokola zoba ngai moko na mokili na ko lela a Constatation o eh ehe, eh eh Passe ya moto ezali nostalgie, Ezali histoire e ko tikalaka, Kasi l’ avenir eyebanaka te Liwa ya moto ezali surprise, se lokola lisano batu ba bandi kolela Reussite ya moto ezali surprise, se lokola lisano batu banbandi ko kamwa oh oh mama Mpasi ya mokili e poni mutu te, pasi ya mokili ezali ya moto nyonso, mpasi ya mokili ezali ya moto nyonso. Oh oh vida a 4. Na konzemba na ko nzemba na ko nzemba, babanda mokili bazali wapi o Ngai moko na mawa malole (malheureux) Na constater lisusu boye, na moni lisusu boye e Batu ya mokili maloba se ko loba, ozanga mbongo batu ba ko seka, ozala na nzimbu batu ba ko kumisa Na komi lokola zoba ngai moko na mokili na ko lela Na komi lokola zoba ngai na ko kima mokili somo o 5. Na contater lisusu boye, bondoki ya Kinshasa e tikala lisusu na famille te. Ba famille ba benda nzoto o, bondoki ya Kinshasa ba famille babenda nzoto eh , ba benda nzoto e eh, E tikala se na misapi ya batu ba ko lakisa a a Tokoma ko lokana se na batu ya nzela, mama a Mingi ba zua ba coups na la vie, se mpo ya baninga ya mitema mabe Basusu ba sila a, se mpo ya batu ya quartier Mingi basala baninga mabe mpo a tikala na compagnie 6. Na constater lisusu boye, na moni e lisusu boye Matanga ekoma facons na facons na Kinshasa, Difference ekaboli ba riches na ba pauvres Liwa ya pauvre e batu ba ko seka e, Matanga ya pauvre batu ya ko tanga Matanga ya pauvre e ko wumeleka mingi te, Ba(zali) ko banga ko sala depenses eleka ndelo e, baye ba tikali sima lobi ba ko liya nini e ? ah mama mokili e e Matanga ya riche, oyo somo eh ; Voitures suka suka lokola defile Lopango etondi meke lokola zando o Mabala e koma ko salema se na matanga eh Basusu bayaka se ko tala lopango Lokumu mpo na famille moto ya mbongo a kufi Lokumu mpo na famille moto ya mbongo akeyi Oyo atiki ebele ya mbongo na famille na ye 7. E kopesa mpasi na baye ba zuaka te eh eh. E kopesa soucis na baye ba zuaka te eh eh Mokili mpasi ngai na leli ye ye ye eh Moto alangwe soki a lelki na nzela ko tumbolka ye e, oyebi te soki ya soucis to mpe ya esengo A koya ko katela yo lingala na n’se ya kuiti. Tika ye aleka malembe e, tika ye aleka malembe eh 8. Kapesa yela ngai bulangeti mpo na zipa nzoto eh, Kapesa yela ngai vunga mpo na zipa nzoto eh, Mopepe ya libanda e kobeta ngai malili mpasi ya kotelengana eleki ngai o Mopepe ya libanda e kobeta ngai malili mpasi ya kotelengana eleki ngai o Eh eh mokili yeh 9. Na constater lisusu boye Songi songi nkutu na loba te, yango nde lelo e koma à la mode Ba pesa yango nkutu kombo « motorse » Sango e ko kende na mopepe, songi songi eh e boma mabala ah ah Yango mpenza eh e panza ba famille Songi songi eh e boma ba amitiés Songi songi e koma lokola passeport mpo na batu mususu e Mokili mpasi ngai na leli ye ye eh 10. Mutu ya poussu soki a ko leka ko finga ye te o ; ndenge a kola na bo mwana boyebi te Mingi ba zuwa ba diplomes evanda na ndaku eh Basala ba kelasi te bakoma ba heritier Bazuwa maboma mpo ya bisimba simba e leki mpo na ba longa mokili e Mokili complique zuwa idee, mokili complique eh ko kamwa ve Bobanda mokili bozali waapi eh 11. Namoni lisisu boye, natuni lisusu boye Mpo na nini basi ya mabala ba koma mobulu makasi koleka basi ya ndumba Mpo na nini ba leki na biso ya basi ya bambula oyo ya sika ba changea ba idées Na tuni lisusu boye Mpo na nini biso mibali tolingi se mwasi oyo azali na moto avanda na ye Mpo na nini mibali tolingi se ozala na basi ebele ekomi compagnie Mop na nini biso mibali to kimaka mwasi soki ozwi mosolo, mpo na nini e mokili Oh oh mokili 12. Na ko nzemba na ko nzemba na konzema na kanisa mpasi ya bana na ngai, Na ko nzemba na kanisa mpasi ya famille na ngai Na ko nzemba na kanisa mpasi ya molongan na ngai Kiazola Mokolo na ko kufa e na ko yeba te, Soki mpe riche soki mpe pauvere, na silisi ko pesa (zongisa) molimo epai na nzambe Maye ma koleka na sima na koeyba été e mama Bana na gnai ba tikali na maw aba ko lela Papa Famille na ngai e tikali na mawa ba ko lele Djenga K Molongani na ngai Kiazola, a kolela Cheri adieu Moninga ngai ya motema Rossy, a ko lela Djenga alanga nzembo eh Ba Cheries ya mitema bana mike ba ko lela ah alanga ndjembo Banguna na ngai motema ba ko sepela c’est bien a keyi Biloko mpo na ngai ya motema a ko lela Djenga a keyi e Gipsy na ngai ya kopema a kolela Djenga K alanga nzembo e Mista Avila ako lela a, ba ko lela a Boluwe na ngai a ko zemba a kolela, ba kolela Mista Apembo a kolela, Djenga K alanga nzembo 13. Eh mokili eh eh, oh oh eh mokili Eh mpasi, e mpasi , oh Nzambe oh Nzambe Mita kufa boule, kuya mapendo Mita kufaBoule, kuya mapendo Oh oh mpasi, oh oh Papa a Oh oh Mungu e, oh oh pasi e Courtesy of: Maval10@NE7 6feb2020
Пікірлер: 4